Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 66:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 66:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Yawe ! Bino bato ya mabota nyonso, bopesa Ye nkembo !


Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.


Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.


Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ