Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 66:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 66:3
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.


Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.


Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai ; mpe bapaya bayaka mpo ete nasepela na bango.


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.


Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemi epai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,


Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo !


nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.


Miriami ayembaki elongo na bango : « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »


Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.


Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu, bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo.


Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.


Wuta na tango ya kala penza, moto moko te atikala kososola, litoyi moko te etikala koyoka, liso moko te etikala komona, ete nzambe moko, longola kaka Yo, asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ