18 Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai, Nkolo alingaki koyoka ngai te.
Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
Mibatela ete okweya na mabe te, pamba te osepeli na mabe koleka minyoko.
Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.
Moto oyo akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka mobeko, libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.
Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.