17 Nabelelaki Ye na monoko na ngai, mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.
Nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai ?
Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.
Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.
Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai ; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya.
Yawe, nabelelaki Yo ; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :
Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.