1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko !
Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda.
Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe !
Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !
Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe ; boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo !
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
Boyembela Yawe nzembo ya sika ! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !
Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !
Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo : « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka ! Mawa mpo na ngai ! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka ! »