Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 65:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 65:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.


babwaka bambuma na bilanga mpe balona banzete ya vino oyo ekobota bambuma ebele.


Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.


ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.


Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.


Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.


Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga, basuka ya mabele ezali kolenga. Bazali kopusana, bazali koya pene ;


Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.


Bamilobelaka te : ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›


Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai.


nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ