Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »
Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba, maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili. Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.
Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.
Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.
Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.