Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?
Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »
Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.
Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.