1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi ; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. »
Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.
pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.
pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.
Nzambe ayebani kati na Yuda ; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.