Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 64:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata ; ekozwa mpe ekozokisa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 64:8
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te ; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.


Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.


Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai ; bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela.


Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.


Bomoi na ngai ekawuki mpo na pasi, mpe mibu na ngai ezali koleka kati na kolela ; makasi na ngai esili mpo na mabe na ngai, mpe mikuwa na ngai elembi.


Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.


Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.


Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.


Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.


Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te na miso na bino ? Bokangaki ye kati na miyibi mpo ete bokoma koseka ye tango nyonso bokolobela kombo na ye ?


Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga : ‹ Engumba Ninive ebebisami boye ! Nani akoyokela yango mawa ? › »


Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela : « Mabele ekomela biso mpe lokola ! »


Bazongisaki : — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›


Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ