Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 64:7 - Mokanda na Bomoi

7 Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 64:7
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi moto moko ya Siri abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar : « Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. »


Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.


Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.


Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga


Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango !


Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.


Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.


Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.


lisumu oyo ekokoma mpo na bino lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu, bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata.


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;


Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.


Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ