Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki : « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi.
Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.