Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 64:5 - Mokanda na Bomoi

5 mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela ; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 64:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › »


Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? ›


Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »


Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke ; motambo ekatanaki, mpe tokimaki.


Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !


Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.


bazali koloba : « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te ! »


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


moto na moto azali kosunga moninga na ye mpe koloba na ndeko na ye : « Sala makasi ! »


Molimo alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko ? Bazali koloba : ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili ! › »


Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka ; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo : bato ya bilongi mibale ! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa kaka mopagano moko oyo akondima kosambela na lingomba na bino ; mpe soki kaka andimi, bokomisaka ye moto ya lifelo mbala mibale koleka bino moko.


Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.


Kasi mibali ya Isalaele bamilendisaki, bango na bango, mpe babongamaki na esika oyo bazalaki na mokolo ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ