Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi : — Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.
Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Nazali na kati-kati ya bankosi ; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.
Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.
Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.
Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.