Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
Boboto na Yo ezali penza monene, boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo, boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, na miso ya bato nyonso.
Moko na moko kati na bango akozala lokola ekimelo liboso ya mopepe mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ; akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.
Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »
Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai ; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! Tika ete balenga liboso na Yo ! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.