Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba ; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.
Esengeli na ngai kolamuka sik’oyo mpe kobima libanda ya engumba, na balabala na yango mpe na bisika oyo bato nyonso bakutanaka ; nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka. Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.
Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.