2 Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule ; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.