8 Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.
Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo !
Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te ; kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo ebatelaka ngai tango nyonso.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo ; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.
Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso ; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.
‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »