6 Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo.
Yawe, Yo moko kaka nde ozali libula mpe bomoi na ngai ; ozali ndanga ya bozwi na ngai.
Nazwi etando ya motuya makasi, ezali libula ya kitoko penza mpo na ngai !
Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.
Nkembo na ye ezali monene mpo na lobiko oyo opesaki ye ; olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.
Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.