5 Posa ya motema na ngai ezali : kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.
Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.
Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,
pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Nzokande, Nzambe ayokaki ngai, ayokaki na bokebi libondeli na ngai.
Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo. Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.
Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »
kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo.