Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 61:4 - Mokanda na Bomoi

4 Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 61:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ?


Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,


Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai.


Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.


Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu ;


Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.


Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.


Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.


Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.


Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ