Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai ! Kolela na ngai ezali sembo ! Yoka koganga na ngai ! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.
Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.
Moko na moko kati na bango akozala lokola ekimelo liboso ya mopepe mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ; akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.
Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,