Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 60:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mpo ete balingami na Yo bakangolama, bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali, mpe yanola biso ! Yanola ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 60:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki : « Oh Davidi, tozali ya yo ! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi ! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza ; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.


kati na libota ya Aseri : basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku minei ;


Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo mpe yanola biso, mpo ete balingami na Yo bakangolama !


Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »


ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.


Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.


Davidi azongiselaki Akishi : — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. Akishi alobaki na Davidi : — Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ