Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 60:5 - Mokanda na Bomoi

5 Omonisaki bato na Yo pasi makasi, omelisaki biso vino oyo elangwisaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 60:5
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.


Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.


alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.


Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.


Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :


Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso ?


Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.


Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima, loboko na Yo ya mobali ? Mpo na nini okangi maboko na Yo ?


Loboko na Yawe esimbi kopo oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo. Azali kosopa yango, mpe bato mabe nyonso ya mokili bazali komeka mpe komela yango kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.


« Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele ? Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama ekoki solo kolongola etumbu na yo ? Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana ? »


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Mpo na Benjame, alobaki : « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »


Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ