Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 60:3 - Mokanda na Bomoi

3 Oh Nzambe, obwakaki mpe opanzaki biso, osilikaki penza. Sik’oyo, zongisa biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 60:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.


Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo : akitisaka moto songolo mpe atombolaka moto pakala.


Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.


Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.


Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso ! Longola kanda na Yo na tina na biso !


Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo !


Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.


Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai : « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo.


Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo ! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.


Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.


Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu ! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.


Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.


Bakoloba : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene, yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ