11 Nani akomema ngai kino na engumba oyo batonga makasi ? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?
Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso !
Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.
Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
Nzambe, kangola Isalaele, na pasi na yango nyonso !
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala penza na tina moko te ; yango wana, napesi yango kombo « Rahavi. »
Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; bongo, bango mibale bakobebisama.