Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 60:10 - Mokanda na Bomoi

10 Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 60:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.


Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Nani akomema ngai na engumba batonga makasi ? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?


Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Kasi Yawe alobaki na ngai : « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te ; banguna na bango bakolonga bango. »


Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. »


Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.


Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ