Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki : « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.
Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.
Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te ! » tango Saulo atindaki bato kozingela ndako ya Davidi mpo na koboma ye. Nzembo ya Davidi.
« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.
Moto oyo amemaki sango azongisaki : — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe.