Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 6:8 - Mokanda na Bomoi

8 Miso na ngai ebebi mpo na mawa ; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 6:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.


Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.


Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai ! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !


Oh Nzambe, soki kaka ozalaki na Yo koboma moto mabe ! Bino basopi makila ya bato, bokende mosika na ngai !


Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;


Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.


Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazali kati na pasi ; miso, motema mpe nzoto na ngai mobimba ebebi mpo na mawa.


Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu ? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !


Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.


« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


« Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.


Oyokaki ngai libondeli na ngai : « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›


Kasi akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe ! »


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ