7 Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.
Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te, nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.
Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso ; kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.
Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema, okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango ; nakomi lokola mokangami kati na boloko, nakoki kobima te !
Olobaki : ‹ Mawa na ngai ! Yawe abakisi pasi mpe minyoko na ngai ; nalembi likolo ya kolela mpe nazali lisusu na kimia te ! ›
Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,