Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 6:4 - Mokanda na Bomoi

4 Molimo na ngai ezali kotungisama makasi ; bongo Yo, Yawe, kino tango nini ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 6:4
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe : « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai ! »


Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.


Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta !


Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ;


Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ?


Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.


Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te ! Ozali makasi na ngai ; yaka noki kosunga ngai.


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai, balangwi masanga bayembaka kombo na ngai kati na banzembo na bango.


Oh Nzambe, kino tango nini monguna akofinga Yo ? Boni, akokoba tango nyonso kotiola Kombo na Yo ?


Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda ? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?


Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango, mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.


Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi.


Yawe, lembisa moke ! Kino tango nini ekowumela ? Yokela basali na Yo mawa !


Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.


Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !


Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Kasi bozali komituna : ‹ Tokozonga ndenge nini ? ›


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ