Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 6:2
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ;


Balingami na ngai, boyokela ngai mawa, nabondeli bino penza, boyokela ngai mawa, pamba te loboko ya Nzambe ebeti ngai.


Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.


mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.


Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.


Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazali kati na pasi ; miso, motema mpe nzoto na ngai mobimba ebebi mpo na mawa.


Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te, nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.


Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.


Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.


Nagumbami, nalembi makasi ; nakomi moto ya mawa mpo na libela.


Nzokande Yo, osepelaka na bosembo, ata kati na libumu ; mpe okoteya ngai bwanya kati na esika ebombama.


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso ; kasi kopesa yango na kanda te, noki te okosilisa koboma biso.


Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo !


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !


Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ