Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »