Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 59:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kasi Yo, Yawe, osekaka bango, otiolaka bikolo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 59:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ; nakobanga nani ? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ; nakolenga liboso ya nani ?


Talela Yawe ! Zala makasi mpe yika mpiko ! Talela Yawe !


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.


Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo, nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo, pamba te ozali ebombamelo na ngai, mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.


Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.


Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.


Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


wana okozwa esengo na yo kati na Yawe mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili, nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, » elobi Yawe.


Nkolo Yawe azali makasi na ngai : akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko, apesaka ngai makasi ya komata kino na likolo ya bangomba. Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ