8 Na nzela ya minoko na bango, babimisaka na bibebu na bango maloba oyo ezokisaka lokola mipanga ; bamilobelaka : « Nani azali koyoka biso ? »
Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »
Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.
Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.
Nazali na kati-kati ya bankosi ; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.
Nasali mabe ata moko te ; kasi bango bazali kopota mbangu, bazali komibongisa. Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.
Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.