6 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesa bikolo nyonso etumbu ; koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.
Oh Nzambe na ngai, kobosana bato wana te, mpo ete babebisaki bosantu ya bonganga-Nzambe mpe boyokani na Yo elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.
bebisa bango na kanda na Yo, bebisa bango kino bazala lisusu te. Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonza kati na Jakobi kino na suka ya mokili.
Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! »