Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.
Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai ; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! Tika ete balenga liboso na Yo ! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.
Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki : — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko !
Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?