Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.
Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.
Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.
Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »