13 Mpo na masumu ya minoko na bango, mpo na maloba ya bibebu na bango, tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango. Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,
lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye ! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye !
pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.
Nakosala ete bosantu ya Kombo na Ngai eyebana kati na bato na Ngai, Isalaele ; nakotika lisusu te ete bosantu ya Kombo na Ngai esambwa ; boye bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Mosantu kati na Isalaele.
Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.