Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima ; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba !
Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.
Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.
Bato ya Davidi balobaki na ye : Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo : « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo.