4 Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango, bapengwaka mpe balobaka lokuta wuta na mabumu ya bamama na bango.
Mwasi azongisaki epai ya nyoka : — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga.
Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.
bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye.
Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye.
Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.
Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.
Soki nyoka eswi moto liboso ete asakanisa yango, litomba ezali lisusu te epai ya moto oyo asakanisaka banyoka.
Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka, mpe elenge mwana akokotisa loboko na ye na zala ya nyoka.
« Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka, bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te, mpo ete eswa bino, » elobi Yawe.
Bino, banyoka, libota ya bitupa ! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo ?
Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.
Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.