Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.
Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.