2 Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ? Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?
Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.
Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.
Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango ; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo ?
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka ; ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.
Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato !
Nzela ya moto ya sembo, ezali alima ; Yo oyo ozali Sembo, okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.
Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.
Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.
Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »