9 Lokumu na ngai, lamuka ! Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.
Nzembo ya Davidi. Nasanzolaka Yo na motema na ngai mobimba ; nayembelaka Yo banzembo liboso ya banzambe.
oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?
bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.
Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota ! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.
Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »
Debora, lamuka ! Lamuka ! Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba ! Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo ; mwana mobali ya Abinoami !