Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 57:5 - Mokanda na Bomoi

5 Nazali na kati-kati ya bankosi ; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 57:5
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Davidi alobaki na lisanga mobimba : — Salomo, mwana na ngai ya mobali, moko kaka oyo Nzambe aponi, azali nanu elenge mpe ayebi penza makambo malamu te. Nzokande, mosala ezali monene, pamba te Ndako oyo ezali mpo na moto te kasi mpo na Yawe Nzambe.


Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.


pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.


Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola ; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.


Na nzela ya minoko na bango, babimisaka na bibebu na bango maloba oyo ezokisaka lokola mipanga ; bamilobelaka : « Nani azali koyoka biso ? »


Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga


Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela ! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye ! Amen ! Amen !


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.


Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.


Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.


Na mokolo wana bokoloba : « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.


Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama ; Yawe kaka nde akonetolama.


Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka ; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »


Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »


Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.


Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ