Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 56:9 - Mokanda na Bomoi

9 Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 56:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.


Yawe, yoka libondeli na ngai ! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !


Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?


Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.


Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.


‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›


Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.


Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ