Banzembo 56:5 - Mokanda na Bomoi5 Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »
Azali kokoma bongo kati na mikanda nyonso epai wapi azali kolobela makambo yango. Kati na mikanda yango, ezali na makambo mosusu ya makasi mpo na kososola ; bongo bato oyo bazangi boyebi mpe balendisama malamu te na kondima bazali kobongola ndimbola na yango, ndenge kaka bazali mpe kobongola ndimbola ya biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko.