Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 56:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 56:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.


Nzembo ya Davidi. Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai ; bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.


Nalobaki : « Oh Yawe, yokela ngai mawa ; bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »


Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.


Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.


Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.


Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu.


Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ?


Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ