10 Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.
Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye.
Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.