Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi : — Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.